A song made by Mister DiDi 😎
A song made by Mister DiDi 😎
Nazalaki mwana na quartier ya malembe,
Ba ndoto ekweya kasi elikya ezongaka.
Mama azalaki kobondela butu mobimba,
Pona lobi ezala malembe na motema. Wesh!
Papa alobaki: “Kanga motema, tika kolela”,
Bomoi ezali bitumba, esengeli koyekola kotelama.
Toliaki moke kasi bolingo ezalaki mingi,
Libota ezalaki makasi lokola libanga.
Pasi elakisaki ngai, nayekolaki ete kondima eleki mbongo nyonso.
Ntango nionso ezali moindo, ngai natalaka likolo. Allez!
Bolingo na pasi, tozali kotambola malembe,
Motema ebukani kasi tozali kaka elongo.
Libota liboso, ata mokili eboya,
Tokokweya te, Nzambe azali koya.
Bolingo na pasi, tozali kobunda na bomoi,
Ata soki miposo ezali, elikya ezali mpe.
Totelama lisusu, malembe malembe,
Libota ezali makasi, tokabwana te. Oh la la!
Namonaki bandeko kobima mpo na koluka mbongo,
Bamosusu bazongi te, pasi ekoma nyongo.
Bikani ekeyi lokola mopepe,
Kasi libota ezalaki kaka kopesa makasi malembe.
Bolingo esalaki ngai mpasi, ekoma cicatrice,
Kasi koyina ezali ngenge, ebimisaka mpasi.
Na ponaki bolingo ata esalaka ngai pasi,
Mpo bolimbisi ezali fungola ya kokima boloko ya motema. Vas-y! C'est chaud!
Libota ezali baoyo batikalaka,
Tokolonga malembe malembe.
Bolingo na pasi...